The Way 2 Life
  NJAMBE ALINGI YO SOLO?
 

Q. Na solo namitunaka soko Njambe alingi ngai. Soko ajali Njambe na bolingo, mpo nini mokili motondi na makambo na mpasi?

R. Kati na Biblia, Njambe alobi ete mpasi yonso tojali kojua na mokili, iuti na masumu na biso. Ejali solo ete Njambe alakisi bolingo na ye na mokili mobimba ndenge totangi kati na Biblia:

Mpo ete Njambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te, kasi ete ajala na bomoi na seko. Yoane 3:16

Kasi Biblia epesi biso malako likolo na bolingo na Njambe:

Njela na moto mabe eboyami na Yawe, nde alingani na ye oyo abili boyengebene. Masese 15:9

Mpo ete Yawe ayebi njela na bayengebene, kasi njela na bato mabe ekobeba nye. Njembo 1:6

Q. Najali solo moto mabe te. Najali moto oyo akoki kati na ejaleli na ngai. Na solo mpenja, malamu najali kosala eleki mosika mabe oyo najali kosala kati na bomoi na ngai. Ndenge nini maloba na Buku na Njambe oyo outi kotangela ngai makoki kosala kati na bomoi na ngai?

R. Na miso na Njambe, kolandana na ejaleli mpe bosembo na ye, ata moto asala malamu ndenge nini! Ajali bobele moto na masumu liboso na Njambe; moto oyo ajali kokende na lifelo. Biblia elakisi ete moto ata moko akoki kokoma na lola te mpo na bolamu na ye. Epai mosusu, bato yonso basili kosala masumu mpe bakweisami. Lokola ekomami ete:

Moyengebene ajali te, ata moko te. Moto na bososoli ajali te, moto ajali koluka Njambe te. Baloma 3:10-11

Motema ejali na bokosi koleka biloko yonso, mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango? Yilimia 17:9

Q. Soko najali moto mabe na miso na Njambe, Ye akosala ngai eloko nini?

R. Biblia elakisi ete na suka na mokili, bato mabe yonso bakojua etumbu na seko kati na lifelo.

Mpo ete moto epelisami na nkanda na ngai, mpe ejali kojika kino bojindo na esika na bakufi, ejikisi mokili mpe mbuma na yango, mpe epelisi miboko na nkeka. Nakosopa mabe na likolo na bango; mpe nakosilisa makula na ngai na likolo na bango. Bakokonda na njala, mpe bakojika na moto makasi mpe na koswa na ngenge; Dutelonome 32:22-24

Q. Tala, bolutisi ndelo! Lifelo ejali te mpe makambo yonso makoki bobele kojala mabe te.

R. Ee, lifelo lijali solo. Mpe makambo makoki kojala mabe mpo na moto oyo akoboya koyamba Nkolo Yesu lokola Mobikisi na ye. Mpe Biblia ejali koloba mbala mingi na ntina na lifelo. Ejali koyebisa biso ete ntango mosusu, lifelo ejali esika ekopesa mpasi libela na libela.

Soko ejuami ete moto akomami na buku na bomoi te, abwakami na libeke na moto. Emoniseli 20:15

Ekojala boye na suka na ekeke; banje bakobima mpe bakolongola mabe kati na malamu, mpe bakobwaka bango kati na litumbu na moto ... Matai 13:49-50

... na ntango na komonana na Nkolo Yesu wana ekobima ye na likolo esika moko na banje na ye na nguya, kati na epelelo na moto ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Njambe te mpe bajangi kotosa Nsango Malamu na Nkolo na biso Yesu. Bakojua lifuti na kobeba na seko mpe kobwakama libanda longwa na liboso na nkembo na nguya na ye ... 2. Batesaloniki 1:7-9

Q. Mpasi eleki! Mpo nini Njambe andimaki kosala lifelo?

R. Solo lifelo ejali esika na mpasi; mpe Njambe asali yango mpo Njambe asalaki moto mpo alimbola makambo na ye yonso liboso na ye Njambe. Bosembo na Njambe ejali kotuna biso tofuta na njela na etumbu masumu na biso.

Jambi masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa ... Baloma 6:23

Mpo ekoki na biso yonso komonana liboso na esambiselo na Klisto ete moto na moto ajua yango ekoki na ye mpo na misala misalaki ye na njoto, soko malamu, soko mabe. 2. Bakolinti 5:10

Najali koloba na bino ete na mokolo na kosamba, bato bakosamba mpo na bilobaloba yonso bijali bango koloba. Matai 12:36

Q. Elingi koloba ete na suka na ekeke moto na moto akosekwa mpo asambisama, mpe na nsima akobwakama na lifelo?

R. Ejali bongo. Bobele soko tojui moto oyo akondima komema mabe na biso mpe kosambisama mpo na masumu na biso. Moto yango akoki kojala bobele Njambe ye moko, oyo ayaki na mokili komema nkanda na Njambe, na esika na bato yonso oyo bandimeli ye.

Biso yonso topengwaki lokola bampate; tobongwani moto na moto na njela na ye moko. Yisaya 53:6

Kasi ajokisami mpo na masumu na biso, atutami mpo na mabe na biso ... Yisaya 53:5

Jambi na liboso napesaki bino yango ejuaki ngai ete Klisto akufi mpo na masumu na biso pelamoko elobaki makomi, mpe ete akundami mpe ete asekwaki na mokolo na misato, pelamoko elobaki makomi. 1. Bakolinti 15:3-4

Ye ayebaki lisumu moko te nde Njambe ajalisaki ye lisumu mpo na biso ete biso tojala na boyengebene na Njambe kati na ye. 2. Bakolinti 5:21

Q. Toloba ete soko natii elikia na ngai mobimba epai na Klisto, oyo andimaki komema masumu na ngai, nakoki lisusu kobwakama na lifelo te?

R. Ejali bongo. Soko nandimeli Klisto lokola Mobikisi na ngai, ejali lokola nasilaki kosambisama liboso na Njambe. Mpe Klisto asili kofuta masumu na ngai yonso.

Ye oyo andimi Mwana ajali na bomoi na seko; ye oyo aboi Mwana akomona bomoi te, kasi nkanda na Njambe ekoumela na ye. Yoane 3:36

Q. Kondimela ye elingi koloba nini? Soko nandimi kaka ete oyo Biblia ejali koloba na ntina na Klisto lokola Mobikisi, nakoki kobikisama?

R. Kondimela Klisto elakisi makambo mingi, koleka kondima kaka oyo Biblia ejali kolakisa. Kondimela Klisto elingi koloba kopesa ye bomoi na biso mobimba, ndenge Biblia ejali kolakisa. Kondimela Klisto ejali koboya masumu yonso tojalaki kosala mpe kosalela Klisto lokola Nkolo na biso.

Moto akoki kosalela ba-Nkolo mibale te; jambi soko akoyina moko, mbele akolinga mosusu; soko nde akondima moko mbe akotiola mosusu. Bokoki kosalela Njambe mpe misolo te. Matai 6:24

Na bongo, bongola mitema mpe butwa ete bopetwa na masumu. Misala 3:19

Q. Bolingi koloba ete mpo na kokima lifelo ekoki bobele koleka na njela na Yesu? Soko ejali bongo, bokanisi nini mpo na mangomba mosusu? Bandimi na bango, yonso bakokende kaka na lifelo?

R. Ejali bongo solo. Moto ata moko akoki kokima esambiseli na Njambe te mpo ete moto na moto akosambisama na ntina na mabe na ye. Mpe ekoki moto na moto afuta ntalo na masumu na ye. Mangomba mosusu bajali na moto oyo akojua esika na bandimi na bango te ndenge Yesu ajui esika na biso. Ejali bobele Klisto moto akoki kosala yango mpo na bato yonso mpe kobikisa biso yonso.

Lobiko mpe ejali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nse kati na bato ete tokoka kobika mpo na yango. Misala 4:12

Ngai najali njela mpe solo mpe bomoi. Moto akokoma epai na Tata te soko na njela na ngai te. Yoane 14:6

Soko tokoyambola masumu na biso, ye ajali sembo nye, Moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopetola biso na bokesene yonso. 1. Yoane 1:9

Q. Najali kobanga mingi. Naboi kokende na lifelo. Nasala nini?

R. Yeba ete ejali bobele Njambe ye moko akoki kosunga yo. Mpo na yango, malamu omitia yo mobimba kati na boboto na ye. Nsima na kososola mabe na yo yonso, bianga Njambe mpe bondela ye mpo asunga yo.

Nde mokongoli na mpako atelemaki mosika, alingaki ata konetola miso na likolo te, kasi abetaki ntolo na ye mpe alobaki ete: Njambe, yokela ngai mawa, ngai moto na masumu. Luka 18:13

... Batata, nasala nini ete nabikisama? Balobi ete ndimela Nkolo Yesu mpe okobikisama ... Misala 16:30-31

Moto na moto oyo akobeela nkombo na Nkolo akobika. Baloma 10:13

Q. Ndenge nini nakoki kondimela Klisto wana nayebi makambo mingi na ntina na ye te?

R. Likambo na esengo lijali ete Njambe abikisi biso na njela na Nkolo Yesu. Likolo na oyo, apesi mpe biso likabo na kondimela ye. Okoki kobondela Njambe ete apesa yo kondima kati na Yesu Klisto mpe ondima ye lokola Mobikisi na yo.

Bobiki na ngolu na njela na kondima; yango euti na bino te, ejali likabo na Njambe. Euti na misolo te ete moto amikumisa te. Baefese 2:8-9

Kondima oyo epesameli biso bobele na njela na Biblia. Boye soko yo ondimi na motema moko ete Njambe akoki kobikisa yo, okokaki kojanga koyoka mpe koyekola Biblia te, oyo ejali Liloba na Njambe. Kati na lokasa oyo, ndenge ojali kotanga yango, maloba yonso oyo mauti kati na Biblia makomami na bilembo mike. Batela likambo yango malamu kati na motema.

Bole kondima euti na koyoka mpe koyoka euti na liloba na Klisto. Baloma 10:17

Q. Elingi koloba ete ekoki natika manso na ngai epai na lijambe?

R. Ejali bongo. Njambe alingi biso tobelema epai na ye na komikitisa yonso; lisusu mpe ekoki tososola ete tojali bato na masumu, bato na bolembu, boye totiya elikia na biso yonso epai na ye.

... nde nakotalaka epai na moto oyo: ye oyo ajali mosokemi mpe atutami na molimo mpe ajali kolenga mpo na liloba na ngai. Yisaya 66:2

Tojali bato na masumu mpe tosepeli na masumu na biso. Ekoki tobondela Njambe mpo apesa biso motema na koyina masumu na biso. Likolo na oyo, soko tojali sembo kati na mposa na biso ete tobikisama, tokopengwa na masumu na biso malembe malembe, wana Njambe ajali kotondisa biso na nguya na ye. Toyebi ete eloko ejali kotinda biso na lifelo ejali bobele masumu na biso.

Esili Njambe kosekwisa Mosaleli na ye, atindi ye na bino liboso, kopambola bino na kobongola bino moto na mabe na ye, moto na mabe na ye. Misala 3:26

Q. Nayebi te soko naselingwi kokokisa makambo oyo yonso. Malamu najua naino ntango mpo nakanisa likolo na yango.

R. Emonani ete okoki kojala na ntango te. Eloko na liboso okoki koyeba ejali ete ntango mosusu mokolo na lobi ejali na maboko na yo te. Maloba Njambe alobaki na Mojui oyo atiaki elikia na ye yonso likolo na biloko na mokili, makoki mpe kolobama mpo na yo.

Yo Joba! na butu oyo bakoluka bomoi na yo epai na yo ... Luka 12:20

Biblia mpe eyebisi biso ete suka na ekeke ebelemi.

Mokolo monene na Yawe ebelemi; ebelemi, eyei mbangu mpenja; mongongo na mokolo na Yawe ejali na bololo, Elombe ajali kolela wana. Mokolo yango ejali mokolo na nkanda ... Sefania 1:14-15

Bino mpe, bojali na mitema milai, bolendisa mitema na bino mpo etek komonana na Nkolo ejali kobelema. Yakobo 5:8

Q. Bongo mokolo na nkanda mpe na kosambisa na Njambe ebelemi? Tokoki koyeba soko tobelemi na suka na mokili?

R. Ee, mokolo yango ebelemi. Kati na Biblia, Njambe apesi biso mateya mingi. Ayebisi biso ete nsuka na ekeke ebelemi mpenja.

Mpe mpo ete mobulu ekoyikana mingi, bolingo na mingi ekojua mpio. ... Mpe nsango malamu oyo na bokonji ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota yonso mpe bongo suka ekoya. Matai 24:l2-l4

Jambi ba-Klisto na lokuta mpe basakoli na lokuta bakotelema mpe bakomonisa bilembo mpe bikamwiseli minene mpo na kopengwisa baponami, soko nde bakokoka. Matai 24:24

Q. Nsima na esambiseli oyo ekoyela biso, eloko nini mosusu ekokomela biso na suka na ekeke?

R. Baoyo bayambaki Yesu bakolata nkembo na Njambe mpe bakofanda na Yesu libela na libela.

Mpo ete Nkolo ye moko akokita longwa na likolo na konganga makasi mpe na mongongo na mokolo na banje mpe na kobeta na mondule na Njambe, mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa liboso. Na nsima biso bato na bomoi baoyo totikali, tokonetwa kati na mapata mpo na kojuana na Nkolo kati na mopepe esika moko na bango. Mpe bongo tokojala libela esika moko na Nkolo. 1. Batesaloniki 4:16-17

Bobele bongo, Njambe akobebisa mokili mobimba na moto, mpe akojalisa likolo na sika mpe nse na sika mpe Klisto akokonja elongo moko na Bandimi libela na libela.

Nde mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi. Na yango, likolo ekolimwa na makelele monene mpe biloko bikonangwa na moto makasi; nse mpe misala yonso kati na yango ikotumbama ... Nde tojali kotalela likolo na sika mpe nse na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango. 2. Petelo 3:10, 13

Q. Mpo nini Njambe ajali kokebisa biso ndenge oyo?

R. Lokola akebisaki mboka na Niniwe oyo alingaki kobebisa, lokola mpe apesaki bango mikolo ntuku minei ete babongola motema, bobele bongo, Biblia ejali kokebisa biso ete suka na ekeke ebelemi.

Yona abandaki kokota na mboka kino mobembo na mokolo moko; angangaki ete, naino mikolo ntuku minei mpe Niniwe akobukana. Yona 3:4

Q. Bato na Niniwe basalaki eloko nini?

R. Kobanda na Mokonji kino bato mike, bango yonso bamikitisaki liboso na Njambe, bayambolaki masumu na bango mpe basengaki bolimbisi epai na Njambe. Mokonji alobaki ete:

Kasi tika ete balatisama na ngoto, bato mpe nyama. Tika ete banganga na makasi epai na Njambe, ee, tika ete babongwana, moto na moto longwa na njela na ye mabe mpe longwa na yauli oyo ejali na maboko na bango. Nani ayebi soko Njambe akobongwana mpe akobongola motema mpe akopengwa longwa na nkanda na ye monene ete tobeba te? Yona 3:8-9

Q. Njambe ayokaki mabondeli na bango?

R. Njambe ayokaki bango mpe abikisaki bato mingi na Niniwe.


Q.
Ekoki mpe na ngai kosenga bolimbisi epai na Njambe ete naleka na esambiseli na ye te?

R. Ejali boye. Ata nde ntango etikali mokuse, Njambe akoki kobikisa yo.

Boluka Yawe naino akoki komonana; bobianga ye naino abelemi penepene. Yisaya 55:6

Biso mpenja tokokima boni soko tokotia mitema na lobiko monene boye te? Esakolami liboso na Nkolo mpe elendisami mpo na biso na bango bayokaki yango. Baebele 2:3

Kobika na ngai mpe nkembo na ngai ijali epai na Njambe; libanga na ngai makasi mpe ebombelo na ngai ijali epai na Njambe. Bino bato bojala na elikia epai na ye ntango yonso; jipola mitema na bino liboso na ye. Njambe ajali ebombelo mpo na biso. Njembo 62:7-8

 
  Visitors 27 visitors (42 hits)